قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا * - ترجمے کی لسٹ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ فجر   آیت:

Al-Fadjir (ELEKO YA NTONGO)

وَٱلۡفَجۡرِ
1. (Nalapi) na eleko ya ntongo!
عربی تفاسیر:
وَلَيَالٍ عَشۡرٖ
2. (Mpe nalapi) na babutu zomi!
عربی تفاسیر:
وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ
3. (Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te!
عربی تفاسیر:
وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ
4. (Mpe nalapi) na butu ntango esilaka.
عربی تفاسیر:
هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٞ لِّذِي حِجۡرٍ
5. Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele?
عربی تفاسیر:
أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ
6. Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad,
عربی تفاسیر:
إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ
7. Na mboka Irama(1) ndenge etongamaki na bandako ya likolo,
1 Kombo ya mboka.
عربی تفاسیر:
ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ
8. Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili,
عربی تفاسیر:
وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ
9. Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba,
عربی تفاسیر:
وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ
10. Na Falo moto ya mapinga?
عربی تفاسیر:
ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
11. Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango,
عربی تفاسیر:
فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ
12. Mpe babebisaki mingi koleka.
عربی تفاسیر:
فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ
13. Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu.
عربی تفاسیر:
إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ
14. Mpo ete Nkolo nayo azali kotala.
عربی تفاسیر:
فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ
15. Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga.
عربی تفاسیر:
وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ
16. Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga.
عربی تفاسیر:
كَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ
17. Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te,
عربی تفاسیر:
وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
18. Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola,
عربی تفاسیر:
وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلٗا لَّمّٗا
19. Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe,
عربی تفاسیر:
وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبّٗا جَمّٗا
20. Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi.
عربی تفاسیر:
كَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكّٗا دَكّٗا
21. Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo,
عربی تفاسیر:
وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفّٗا صَفّٗا
22. Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo,
عربی تفاسیر:
وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٖ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ
23. Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te.
عربی تفاسیر:
يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي
24. Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai!
عربی تفاسیر:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٞ
25. Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te,
عربی تفاسیر:
وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٞ
26. Mpe moto moko te akokangama lokola ye.
عربی تفاسیر:
يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ
27. Oh yo molimo y a kimia!
عربی تفاسیر:
ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةٗ مَّرۡضِيَّةٗ
28. Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo.
عربی تفاسیر:
فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي
29. Kota elongo na bawumbu ba ngai,
عربی تفاسیر:
وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي
30. Mpe kota okati ya lola na ngai.
عربی تفاسیر:
 
معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ فجر
سورتوں کی لسٹ صفحہ نمبر
 
قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا - ترجمے کی لسٹ

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بند کریں