《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 穆勒萨拉提   段:

Al-Mursalâtu (BATINDAMI)

وَٱلۡمُرۡسَلَٰتِ عُرۡفٗا
1. (Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki(1) ya kolandana! (ba anzelu)
1 Baye batindamaki: Awa ekoki kolimbolama na: Ba anzelu, to mopepe.
阿拉伯语经注:
فَٱلۡعَٰصِفَٰتِ عَصۡفٗا
2. Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi!
阿拉伯语经注:
وَٱلنَّٰشِرَٰتِ نَشۡرٗا
3. Mpe bazali kopanza bisika binso!
阿拉伯语经注:
فَٱلۡفَٰرِقَٰتِ فَرۡقٗا
4. Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu!
阿拉伯语经注:
فَٱلۡمُلۡقِيَٰتِ ذِكۡرًا
5. Mpe na baye babwakaka mbela,
阿拉伯语经注:
عُذۡرًا أَوۡ نُذۡرًا
6. Mpona bolimbisi to bokebisi!
阿拉伯语经注:
إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَوَٰقِعٞ
7. Oyo bolakamaki ekozangaka te.
阿拉伯语经注:
فَإِذَا ٱلنُّجُومُ طُمِسَتۡ
8. Tango minzoto mikolimwaka.
阿拉伯语经注:
وَإِذَا ٱلسَّمَآءُ فُرِجَتۡ
9. Mpe tango mapata ekopasuka,
阿拉伯语经注:
وَإِذَا ٱلۡجِبَالُ نُسِفَتۡ
10. Mpe tango bangomba bikolalisamaka,
阿拉伯语经注:
وَإِذَا ٱلرُّسُلُ أُقِّتَتۡ
11. Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka.
阿拉伯语经注:
لِأَيِّ يَوۡمٍ أُجِّلَتۡ
12. Yango ezongisami mpona mokolo nini?
阿拉伯语经注:
لِيَوۡمِ ٱلۡفَصۡلِ
13. O mokolo ya kokata makambo.
阿拉伯语经注:
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ
14. Mpe nani akoyebisaka yo mokolo ya kokata makambo?
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
15. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
أَلَمۡ نُهۡلِكِ ٱلۡأَوَّلِينَ
16. Boye tobomaki bamisusu liboso te?
阿拉伯语经注:
ثُمَّ نُتۡبِعُهُمُ ٱلۡأٓخِرِينَ
17. Sima tolandisaki bamisusu te.
阿拉伯语经注:
كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
18. Lolenge wana nde tokosalelaka batomboki.
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
19. Etumbu ekozala mokolo wana тропа bakosi.
阿拉伯语经注:
أَلَمۡ نَخۡلُقكُّم مِّن مَّآءٖ مَّهِينٖ
20. Boye tokelaki bino na mayi ya moselu te?
阿拉伯语经注:
فَجَعَلۡنَٰهُ فِي قَرَارٖ مَّكِينٍ
21. Мре totiyaki yango na ebombelo elamu te?
阿拉伯语经注:
إِلَىٰ قَدَرٖ مَّعۡلُومٖ
22. Na elaka oyo eyebani te?
阿拉伯语经注:
فَقَدَرۡنَا فَنِعۡمَ ٱلۡقَٰدِرُونَ
23. Totiyaki mibeko na lolenge ya malamu te?
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
24. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
أَلَمۡ نَجۡعَلِ ٱلۡأَرۡضَ كِفَاتًا
25. Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te?
阿拉伯语经注:
أَحۡيَآءٗ وَأَمۡوَٰتٗا
26. (Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa?
阿拉伯语经注:
وَجَعَلۡنَا فِيهَا رَوَٰسِيَ شَٰمِخَٰتٖ وَأَسۡقَيۡنَٰكُم مَّآءٗ فُرَاتٗا
27. Boye topikelaki yango bangomba ya milai? Mpe tomelisaki bino mayi ya elengi te?
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
28. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ مَا كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
29. Bökende epai ya maye bozalaki kozua yango nalokuta.
阿拉伯语经注:
ٱنطَلِقُوٓاْ إِلَىٰ ظِلّٖ ذِي ثَلَٰثِ شُعَبٖ
30. Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato,
阿拉伯语经注:
لَّا ظَلِيلٖ وَلَا يُغۡنِي مِنَ ٱللَّهَبِ
31. Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te!
阿拉伯语经注:
إِنَّهَا تَرۡمِي بِشَرَرٖ كَٱلۡقَصۡرِ
32. Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo,
阿拉伯语经注:
كَأَنَّهُۥ جِمَٰلَتٞ صُفۡرٞ
33. Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka.
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
34. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
هَٰذَا يَوۡمُ لَا يَنطِقُونَ
35. Mokolo wana bakolobaka te,
阿拉伯语经注:
وَلَا يُؤۡذَنُ لَهُمۡ فَيَعۡتَذِرُونَ
36. Mpe bakolingela moto moko bolimbisi te,
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
37. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِۖ جَمَعۡنَٰكُمۡ وَٱلۡأَوَّلِينَ
38. Oyo nde mokolo ya kokata (makambo), tokosangisa bino na bato ya liboso.
阿拉伯语经注:
فَإِن كَانَ لَكُمۡ كَيۡدٞ فَكِيدُونِ
39. Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai.
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
40. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي ظِلَٰلٖ وَعُيُونٖ
41. Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba,
阿拉伯语经注:
وَفَوَٰكِهَ مِمَّا يَشۡتَهُونَ
42. (Bakoliaka) bambuma oyo balingi.
阿拉伯语经注:
كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
43. Bolia, mpe bomela na mposa na bino тропа maye bosalaki.
阿拉伯语经注:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
44. Ya sólo, lolenge wana nde tokofutaka babongisi.
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
45. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
كُلُواْ وَتَمَتَّعُواْ قَلِيلًا إِنَّكُم مُّجۡرِمُونَ
46. Bolia mpe bomela (токе na mokili), Ya sólo penza bozali batomboki.
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
47. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱرۡكَعُواْ لَا يَرۡكَعُونَ
48. Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)
阿拉伯语经注:
وَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
49. Etumbu ekozalaka mokolo wana тропа bakosi!
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ حَدِيثِۭ بَعۡدَهُۥ يُؤۡمِنُونَ
50. (Sima na yango), liloba nini lisusu bokondimaka?
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 穆勒萨拉提
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭